Revelation of John 19

Liloba ya motoba : nzembo ya elonga

1Sima ya makambo wana, nayokaki na Likolo lokola mongongomoko ya monene ya bato ebele penza, bazalaki koganga : Aleluya ! Lobiko,
nkembo mpe nguya ezala na Nzambe na biso !

2 Pamba te lolenge na ye akataka makambo
ezali ya solo mpe ya bosembo.
Asambisi ndumba monene
oyo azalaki kobebisa mokili
na kindumba na ye ;
mpe apesi ye etumbu
mpo na makila ya basali na ye.

3 Bongo balobaki lisusu :
Aleluya !
Milinga na yango,
ezali komata na likolo
libela na libela.

4Bampaka ntuku mibale na minei na bikelemo minei ya bomoi, bafukamaki bilongi na nse mpe bakumbamelaki Nzambe oyo afandaki na Kiti ya bokonzi ; mpe balobaki :

—Amen ! Aleluya !

5Bongo mongongo moko ebimaki na Kiti ya bokonzi elobaki :

—Bokumisa Nzambe na biso, mikolo mpe bana, bino nyonso oyobosalelaka ye mpe bobangaka ye.

Liloba ya sambo : feti ya libala ya Mwana-meme

6Bongo nayokaki lokola mongongo ya bato ebele penza, ezalaki koyokana lokola makelele ya mayi ebele mpe lokola lokito ya kake yamakasi penza, elobaki : Aleluya !
Pamba te Nkolo Nzambe na biso,
Nzambe ya nguya nyonso
azali Mokonzi.

7 Tosepela, totonda na esengo
mpe topesa ye nkembo ;
pamba te tango ekoki
mpo ete feti ya libala ya Mwana-meme esalama,
mpe mwasi na ye asiʼamibongisi.

8 Bapesi ye ndingisa mpo alata
elamba ya lino ya pete-pete,
oyo ezali kongenge, mpe ya peto.

Pamba te elamba ya lino ya pete-pete, ezali nde misala ya bosembo ya basantu.

Malaba oyo ezali penza maloba ya Nzambe

9Bongo anzelu alobaki na ngai :

—Koma : Esengo na baoyo babengami na feti ya libala ya Mwana-meme !

Mpe alobaki lisusu :

—Maloba oyo ezali penza maloba ya Nzambe.

10Bongo nafukamaki liboso ya makolo ya anzelu mpo na kosambela ye. Kasi alobaki na ngai : Kosala yango te. Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo baoyo bazali na litatoli ya yesu. Sambela Nzambe ! Pamba te, litatoli ya Yesu ezali molimo ya maloba oyo baprofeta basakolaka.

KOKOKISAMA YA LOBIKO NA NZELA YA BIMONISELI SAMBO

Emoniseli ya liboso : moto avandaki likolo ya punda ya pembe

11Bongo namonaki Likolo efungwanaki mpe punda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Moto oyo afandelaki yango, kombo na ye : “Sembo mpe solo”. Asambisaka mpe abundaka na bosembo nyonso. 12Miso na ye ezalaki lokola moto ezali kopela ; mpe alataki bikoti ebele ya bokonzi na motu na ye. Kombo oyo ezalaki ya kokomama na nzoto na ye, ata moto moko te ayebi yango, kaka ye moko. 13Alataki nzambala moko badindisa na makila. Kombo na ye : “Liloba ya Nzambe”. 14Basoda ya likolo bazalaki kolanda ye likolo ya bampunda ya pembe ; balataki bilamba ya lino ya pete-pete, oyo ezalaki ya pembe mpe ya peto. 15Mopanga moko ya mino penza ebimaki na monoko na ye, mpo na kobeta bikolo. Akokamba bango na lingenda ya ebende, mpe akoniata nzungu monene ya vino ya kanda monene ya Nzambe ya nguya nyonso. 16Kombo moko ezalaki ya kokomama na nzambala na ye mpe na mopende na ye : “Nkolo ya bakolo mpe Mokonzi ya bakonzi.”

Emoniseli ya mibale : feti monene ya bandeke oyo eliaka misuni ya bato

17Bongo namonaki anzelu moko atelemaki na kati ya moi, agangaki na mongongo makasi na bandeke nyonso oyo ezalaki kopumbwa na likolo penza :

—Boya, bosangana na feti monene ya Nzambe ;
18mpo bolia misuni ya bakonzi minene, ya bakonzi ya basoda, ya bato ya nguya, ya bampunda, mpe ya bato oyo batambusaka yango, ya bato nyonso, ya bawumbu to ya bato ya bonsomi, ya bato minenempe ya bato mike.

Emoniseli ya misato : bakangi nyama mpe moprofeta ya lokuta

19Bongo namonaki nyama wana, bakonzi minene ya mokili, na basoda na bango, basanganaki mpo na kobunda etumba na moto oyo avandaki likolo ya mpunda mpe na mapinga na ye. 20Kasi bakangaki nyama yango mpe moprofeta ya lokuta oyo azalaki na ye elongo, oyo asalaki makamwisi na miso na ye. Mpo na makamwisi wana, nde akosaki bato oyo bazwaki elembo ya nyama, mpe bazalaki kosambela elilingi na yango. Nyama yango na moprofeta ya lokuta, bango mibale, babwakaki bango na laki ya moto mpe ya sufulu. 21Bongo moto oyo afandaki likolo ya mpunda asalelaki mopanga oyoezalaki kobima na monoko na ye mpo na koboma bato mosusu oyo batikalaki ; mpe bandeke nyonso bayaki kolia misuni na bango.
Copyright information for LinMNB